LISAKOLI EZALI NINI ?

[LISAKOLI EZALI NINI / Qu’est-ce que l’Évangile?]

Ezali malamu mingi komona ndenge nini bozwakintango yakotala malamu nsango ya biblia.

Bozalinntango mosusu mayele na oyo etali bonzambe kokende na ndako ya nzambe, kokokisa tokolanda misala misantu, kolanda misala oyo ezali kokumisa nzambe te. Mpe tozali Kondimela bino.

Biblia ezali kotangisa ke nzambe afandi kati na mitema ya bato mpe basi baoyo bazali koyoka

Maloba naye.

Misala oyo esengeli biso kolanda ezali misala oyo biblia yango moko etangisi, to elakisi polele, mpe mizali mingite kati na biblia.Kozwa libatisi ya mayi mingi mpe kolia lipa mikolo nyonso na mposo na kokanisa yezu.

Bozali ntango mosusu moto kaka mpe bolingi kenzambe azali kati na bomoi na bino kasi bolingi te kokende mosika.

Tomonaka oyomingi kati na biso : tozali kofungolampe kotanga mpe kozala asika ya masolo ya biblia. Ezali malamu mingi tondimake nzambe azali pamba te wana, ezali solo. Kasi ezali na biloko mosusu ya koyeba. Na kotanga liloba naye. Biblia, tokoki ko yeba ye mpe kozwa mwa esika kati na bonzambe naye. Mokanda oyo ekomamaki na molimo na nzambe naye.

Mokanda oyo ekomaki na molimona nzambe mpe etindaki bato kokoma yango ; ezali maloba ya pamba te ya bato, lokolo mikanda mosusu.Talatina ezali mokanda oyo esengeli koyeba yango.

Tango mosusu, bokanisi ke boyebi nyonso. Botalaki biblia mpe bokomelaki koyeba. Kasi soki bozali katina bosolo, bokoloba bosolo ke ezali na eloko moko ezangi. Etikali na kondima te, bobangi na mikolo ekoya, kozanga bosolo kati na bomoi na biso …kozanga kondimela ezali kolanda mingi bato na basi lokola mbwa ya mwindu ti kati na lilita.Na bino, na lobi : bomeka mbala lisusu ntango mosusu maloba oyo bato bazali koloba na ndenge ta mosusu ya bokumisi na bino ya biblia. Tozongela na maloba ya biblia yango moko.

Ntango mosusu, mpo na bino, makambo oyo etali christo ezali kaka “mayele na bino ya botangi mingi”, mosusu kolekisa ntango na bino pamba mayele mosusu, mpe botelemi moke na nzela…

Ezali komema na lilita.Bomoi ezali mokuse mingi mpo na kozala na bizaleli wana.Pambate mokolo moko bokopemaka kati na lilita na bino,mpe mokolo moko kokufa ya mabe mpe yako

Bangisa ekokitelaka bino.

Boyoka sikoyo ninioyo biblia elingi koloba.

Na sengi na bino, nakondima na bino, bozwa mwa ngonga muke mpo na bomoi na bino mpo nakolata malamu nini biblia elobi.Totala sikoyo motuna oyo tozali komituna oyoelobi nini lisakoli, to lisakoli ezali nini?

Nakosenga na bino, bofungola biblia na bino ya nsango yasika kati na mokanda ya matayo1:1awa nde mosali oyo matayo abandi kolakisa kosa kola nate.Totangi:

Libota mobimba ya yezu-christo, mwana ya dawidi, mwana ya Abraham.Ezali biloko ya motindo wan ate nde tozali kozela. Matayo alobi ke yezu azali ya libota ya dawidi mpe na abalahama tala etandeli ya lisakoli ya matayo. Paulo amonakiye na lolenge wana moko kaka.

Botala na mokanda ya bagalatiya3:8. Lisusu makomi, ezali kolakisa ndenge nini nzambe ako lobelaka ba pakano na nzela ya kondima, alobaki yango na liboso ya kosakola nsango malamu na Abalahama mpe libota nyonso mobimba ekopambolama naye.

Maloba “nsanga malamu”awa ezali nayango eloko te kaka eloko oyo ekoyoka . “lisakoli” na ndenge na yango ya sika. Sikoyo mpamba te lisakoli ekokakikopesamela na Abalahama lokola elaka. Tala oto elobi Paulo.Soki tokoki koypka nini oyo nzambe akokaki kopesa na abrahama lokola elaka, wana sikoyo tokoki koyoka nini lisakoli.Tokende, to totala sikoyo nini elobani kati na mokanda ya kala mpe totala nini nzambe alobi na abalahama.

 

Tobanda na mokanda ya Genèse, mokanda ya liboso kati na biblia: genèse17:8.

Nakopesakayo, mpe na libota nayo, sima nayo mpambate mboka oyo esengelakiyo kopesamela, kokota mpe kofanda mboka ya elaka, mboka nyonso ya canaan, kokoka kozwayango mpona libela, mpe nakozala nzambe na bango. Nzambe alobi lisusu na abalahama ke yena mabota naye nyonso bakofandaka libela na mokili oyo. Bomoi ya seko ezali likanisi oyo tokuti kati na mokanda ya kala.Tokoma boye, mpwete nsango ya motuya kati na biblia ezali moko kaka, kobanda na ebandeli kino na suka ndenge nini ekokikozala ?

Tobaluka na mokanda ya Genèse 22.17-18

Nakotondiselayo mapamboli mpe na kosala ezala mingi libota nayo,lokola minzoto ya likolo mpe lokola nzoto oyo ezali kozwama pambate pembeni ya ebale. Libota nayo nyonso ekozala nabokengemeli ya bineminaye.Mabota nyonso ya mokili bikoloba pambolama na libota nayo, pambate mpete okokaki koyoka mongongo na ngai.Abalahama akozala na mwana oyo akozala lipamboli ya solo na mokili mobimba.

Mpo na koyeba malamu biblia, esengeli tomona lolenge ni ni biblia ezali komilakisa yango moko mpe kopesa biso elakiselo naye.

Pamba te nsango oyo touti kotanga ezali kozwama kati na bukuya sika, mpe kati na mokanda ya bantoma 3.25 -26.totala makomi oyonakoyoka wela yango malamu.

Bozali bana ya bantuma mpe ya lisanga oyo Nzambe akokaki kosala na ba nkoko na biso, na koloba na abalahama : ke mabota nyonso ya mokoli eko pambolama na ba nkoko nayo. Ezali na bino mbala ya liboso Nzambe, sima yako pona mosali nay, atindaki ye pambate mpwete akoka kopambola bino, pambate moko na moko na bino akoka kotikana na masumu. Nani nde azali libota oyo ya abalahama ? ezali Yezu, mpe ezali wapi lipamboli oyo akopesa na bato mpe na basi ya mokili mobimba ?

Ezali oyo ya kolimbisa masumu mpe lobiko, tolandela likanisi oyo, totala katina mokanda ya Bagalatiya 3.16 totala malamu oyo ekokaki kosalemela na Abalahama mpe na libota naye. Alobakite ke : mpe na mabota nyonso, lokala ekokaki kozala mingi. Kasi lokola na moto moko kaka : mpe na libota, elingi koloba na Christo.

Sikoyo libota ya abalahama esili kozala moto moko.

Kasi lolenge nini moto oyo moko kaka akoki kozala bato ebele ? Ebele lisusu koleka minzoto ya likolo? Totanga Galatiya 3.27-29.

Bino ba oyo nyonso bokokaki kozwa libatisi katina yezu, bokokaki kolata nde Christo, kozalite mu yuda, tomu griki, kozali lisusu te mokangami, tomokangolami, kozala mbala lisusu te mobali to mwasi, pamba te bino nyonso, bozali kati na Yezu Christo, mpe soko bozali ya Christo, sikoyo bozali ya libota ya abalahama, moto oyo akotikala na elaka.

 

Kaka ba oyo basili kozwa libatisi na bango katina Christo bazali na mwa elaka, bilaka ya bomoi ya seko awa na mokili.

Talatina esengeli biso tokoka kozwa libatisi soki tolingi tobika ! Paulo alobi ete elikya naye ezalaki « elikya ya israela » (Misala yaba ntoma 28.20) na ntango wana amikutaki liboso ya kufa, wana ezalaki elikya naye elikya ya israela. Nini nde libatisi sikoyo ? Ezali te kosopa mayi kaka. Katina Mokanda ya sika ekomami na monoko ya kigriki mpe elobami na monoko ya français lokola « libatisi » elingi koloba kaka « mayimingi ». Bazalaka ko salela kombo oyo nakolobela mpona masuwa moko ezalaki kotambula.

Mpe ekokaki kozinda, mpe lisusu lokola kiteni ya elamba oyo bazindisi kati na mayi ya langi mpo ekoka kozwa langi mosusu. Matayo 3 : 13-16.

Sikoyo yezu aye epayi ya yohana kouta na Galilaya na yordani, mpo nakozwa libatisi naye na yohana. Kasi yohona aboyi mpe na koloba : ezali ngayi nde nazali na mposa ya kozwa libatisi epayi nayo, kasi yonde oye epayi na ngayi ! Yezu ayanoliye boye : tika esalema bongo, pamba te ezali malamu tokokisa maloba.

Sina na yango yohana asalaki yango.

Sima ya kozwa libatisi, yezu abimi katina mayi.

Na sima na yango mapata mafungwaki, mpe amonaki molimo na Nzambe kokitela ye lokola ndeke.

Yezu « kokita » katina mayi mpe « kobima » katina mayi. Mpe azwaki libatisi lokola moto mokolo, kasi lokola mwana moke te to libatisi ya mayi mingi kasi ya mayi moke te to libatisi ya kosopela moto mayi te. Tala tina yango ezali kosalema kati na mayi ya ebale mayi monene.

Mpe tokoka kosala yango. Oyo ya kozindisa moto kati na mayi mingi mpe sima na yango kobima kati na mayi wana ezali elembo oyo elakisi kufa mpe kosekwa naye yezu : sima yakozwa libatisi, to lakisi ke tozwi mokano ya kolakisa ko kufa mpe ko sekwa naye yango tina wana esengeli kati na mayi mingi penza, kasi ezalate oyo ya mayi moke to ya kosopela moto mayi.

Baloma 6 : 3-5

Tobosana ete ke biso bans oba oyo tokokaki kozwa libatisi kati na yezu-Christo, ezali na nzela ya kufa naye nde bisompe tozwaki libatisi ? tokokaki biso banso ko kundama naye kati na kufa na nzela ya libatisi, mpwete, ndenge yezu a sekwaki katinaba kufi na nguya ya Nzambe, lolenge moko biso mpe tofambola na lolenge ya sika kafi na bomoi na biso.

Pamba te soko tokokoma biso nyonso lokola nzete elongo naye na nzela ya kufa naye, tokozala lisusu lolenge moko na nzela ya kosekwa naye.

Talatina tozali koteya bino na nzela ya libatisi bozwa yango lokola na nzela ya kondimela yezu-Christo !

Sima ya kozwa libatisi kati na yezu, to komi moko ya nzoto naye. Bilakanaye bizali kozwama kati na biso na ntango wana yezu akozonga na mokoli oyo, toka sekwa, kosambisana na sina na yango, sokotoko tikala bayengebene na liloba na nzambe, tokozwa bomoyi ya seko katina bokonzi bwa nzambe mpe toko umela seko kati na bokonzi bwaye awa na mokili. Na ntango ondimeli na oyo, bomoi ekomi na nzela ya sika. Ata ezala ba mposa na biso yabiloko, esengeli toyeba ete bizali ya ntango moke kaka, mpe ntango Christo akoya, akopesa bisobomoi ya sika mpe bomoi ya seko.

Talatina kati na biblia, mpe kati na CHRISTO kozali ELIKYA ya solo.

Elikya na biso ezali monene koleka ba mpasi mpe mitungisi? Na biso oyo tozali na yango lelo ezali komona na makasite kasi lolenge nini wana ekoki kosala ete moto yezu akoki kobikisa biso. Ezalaki emoniselo na biso mpe natina na yango esengeli biso kozwa libatisi kati na kufa naye mpe kati nakosekwa naye : pambate azalaki ya solo lokola biso.

Hebreux 2 : 14-18.

Sikoyo, pambate lolenge bana bazali kosangana na makila mpe na mosuni, ye mpe, na lolenge wana azala mpe kosangana, mpwete akoka konyata kolekela na kufa naye oyo azali kosimba to oyo azali na makoki ya kufa, elingi koloba satana, mpe kokangola ba oyo nyonso, kolekela na kobanga kufa to liwa, bazalaki to bomoyi na bango nyonso ezalaki kokangama kati na boumbu. Mpwete ezali na ba anzelu ya solo aye na libatisi kasi ezali libota ya abalahama ezali koya na lisalisi. Lisusu esengeli naye koya, na nyonso, lolenge ya ba ndeko naye, mpwete azala songolo pakala oyo azali to atondi na mawa katinaye mpe moyengebene kati na misala na Nzambe mpo nako mona mpasi, mpe minyoko mingi mpo na masumu nabiso. Pambate komona lolenge nini akokaki konyokwana ye moko na ntango akokaki komekama, akoki mpe kosalisa baoyo bazali katina komeka.

Na totala malamu kati na koleka satana azali nyamate mpe azali nyoka oyo ba bengi dolagon te. Kombo oyo ezali kopesa mela ye ezali lokola moto na bomoto naye kati na masumu « lifuti ya masumu ezali kufa » (Baloma 6 : 23), kasiawa touti kotanga koloba été « satana » azali kosimba « makoki ya kufa » esengeli biso kobunda na nzoto na biso moko mpe na bomoto na biso kasi na nomoto oyo ezali komonana te na libanda.

Totala kati na kiteni na yango ya zomi na mina lolengi nini bazali kozongela mingi mingi na bomoto ya yezu ye mpe na lolenge ya kokokana akokaki kosangana ». (na bomoto na biso, na makila na bisompe na nzoto). Mbala mingi masango ya Ba christo bazali kotangisa ke kozali banzambe mpe moko na bango azalaki Yezu. Kasiezali te oyo biblia ezali koloba.

Mpe kolandana na bukuya Hebreux, ezali ya motu ya mingi lolenge nabiso ya koyoka yezu ezala malamu. Azalaki penza na bomoto lolenge moko nabiso. Mpe makomi ezali koyeba yango mbala mine ! akokaki komekama lolenge mokona biso.

Mpe tala lolenge nini tozali komekama. Yakobo : 13-15.

Ata moto mokote na tango amekami, aloba : ezali nzambe nde ameki ngayi. Pamba te nzambe akoki te komekama na mabe empe akokite komeka moto. Sima ya kolula, boluli ezwizemi, mpe eboti masumu, mpe masumu, ekomi na esika na yango, mpe kobote kufa.

Wana elingi kolola ete yezu azalaki na bonzoto na biso.

Nzambe akoki komekana te, yakobo alobi yango, kasi yezu amekamaki.

Hebreux alobi yango, sikoyo Yezu azali Nzambe te katina bonzambe naye, ezalinde moto mwana na nzambe na mbotana naye, lobota ya Dawidi na Abolahama kolekela maliya maman naye. Na lolenge moko, nzambe akoki te kobotana, kasi yezu ye akufaki tokoki komona nzambe te kasi bato ba monaki mpe kosimba yezu. Yezu akokakite kozala liboso ya kobotana na ye lokuta penza. Ezalaki nde mwana na nzambe kolekela mali ya. Tala kati na mokanda ya.

Luka: 1:31-35.

Tala oko kumba zemi, okobota mwana, mpe okobenga ye na kombo ya yezu. Ye akozala mikolo mpe akobengama mwana na likolo penza, mpe nkolo nzambe ye akopesaka na ye kitina bokonzi ya Dawidi, papa naye.

Ye akokonza likolo na Ndako ya yakobo seko na seko mpe kokonza naye ekozala na sukate. Maliya alobi na anzelu: lolenge nini makambo wana ekomonana, pambate na yebi nano te mibali? Kasi anzelu ayanoliye boye: molimo na nzambe ekokilela yo mpe nguya na likolo ekozipa yon a elilingi na yango. Nde tina, mwana mosanto oyo akobotana akobengama nakombo ya mwana na nzambe

Botala malamu makomi oyo elo bami na ndenge ekozalaka! YE AKOZA MWANA NA NZAMBE, MALIYA YE AKOKUMBA ZEMI. Tala esika yezu abandaki, ata soki likanisi, logos ya yezu ezalaka kozala elongo na nzambe kobanda na ebandeli. Boyeba été malia ye azalaki mwasi kaka lokola basi mosusu. Yezu ye azalaki ya libota yaba nkoko ya abalahama mpe ya Dawidi oyo ekokaki kozala ya libota na bango. Soko yezu akokaka kozala nzambe, sikoyo mbele malia ye akolaki kozala mpe maman ya nzambe mpe mbele akokaki kozala lisusu te mwasi ya pamba to mwasi kaka lokola basi mosusu. Ndenge biblia ezali kotangisa ete yezu azali mwana na nzambe mpena lolenge moko “MWANA NA MOTO”, libota ya abalahama mpe ya dawidi kolekela na malia, yango wana ezali kolakisa biso ete malia azali mwasi lokola basi mosusu. Sikoyo nde nyonso to pamba lolenge moko ya kondimela ya solo to lolenge mosusu ya kondimela bosolo pambate oyo ebengami misala ya ecclesia ezali kopesa biso lolenge mosusu yako zala.

Hebreux 4: 15-16

Pamba te tozali te nasongolo pakala oyo akokite kozwa esika na bampasi yaba mosusu; kasi ekokakiye komekama lokola mpe ba mosusu na tango inso te, mpeye kosumukate.Topusana banso na kondima liboso ya kiti naye ya bokonzi, mpe ya ngelu, mpamba te mpona kozwa mawa naye mpe nakozwa ngelu mpe nakomona lisalisi na tango na yango.

Mpete yezu azalaki kokabola bomoto na biso, tokoki kosambela na nzela naye na nzambe na elikya. Sikoyo tozali na mposa lisusu te ya sango na nzela ya bomoto, tona libalisi yasolo, to mosakoli, tomoteyi mpwete losambo na biso eyokamela, to endimama.

*tokoka kotia na esika moko makasi oyo ya liboso oyo tokokaki kosolola elongo:

1. Kozali nzambe mokokaka, kasi bonzambe misati te.

2. Yezu azali mwana na nzambe, kasi ye azali nzambe te ; ye akokaki kozala te liboso ya kobotama naye.Ye akokaki koleka na banzela nyonso yako mekama kasi na ndenge yakolonga na nzela yabo motote kasi nakolenga nanzela yabo nzambe.

Na nyonso ye akokaki kosumukate.Apesaki bomoi naye na biso kolekela liwa ya mpasi mingi, mpe liwa ya nsoni mingi komona lolenge ye asumukakite, nzambe asekwisakiye katina bakufi.

3. Kolekela na libatisi kati na christu, elingi koloba kozinda kati na mayi mingi ya moto mokolo, tokaboli liwa naye mpe lisekwa naye.

4. Na ntango wana yezu-christu akoya, toko sekwa mpe kosambisama ompe kozuwa bomoyi ya seko kati na mboka naye oyo ekozala awa na nse bokonzi wana ekokokanisa na mokili na ntango ya bustani ya Edeni na tango wana nzambe asili kokela moto-ekozala kitoko mingi. Mikakatano nyonso oyo ezali ko bebisa mokili ya lelo: bitumba ,nzala, mawa ata liwa mikakatano oyonyonso ekobungaka atasuka.

5. Sima ya liwa, tozali na boyebite « lifelo »ezalikaka lilita.

6.Molimo ekufakate; tosalemi na mabele, toputulu mpe tokozongaka katina yango.Molimo oyo ezali lokola naya molimo ya nzambe, ezali makasi ya bomoi kati na bisonde n zambe akokaka kozwa yango na tango tokufi.Sima ya liwa tokokisi lisusu te kotikala na mwa mayele.

7. Satana ye azali kaka lokola eloko moko oyo batalisaka mpo na misala ya nzoto ya nkanda kati na biso nde esengeli biso kobunda makasi.

Ezali na kombo mokote to ya dalagon toya eloko moko ya kobangisa makasi ekoki ko umela seko. Nzambe ye azali makasi mingi koleka; ye akabaka te makoki naye na satana?ba mpasi na biso nyonso ezali kouta epayi na nzambe, kasi epayi na satana te; mizali koluka ebandeli na yango ya molimo.

8. Na kotanga biblia mpona biso moko kaka, tokoki kozwan nzela ya solo oyo ezali komema epayi na nzambe.

Nazali sikoyo kotangisa bino biloko oyo mpe bokoka kopemate ti mokolo oyo bokokomela kozwa mayele mpe boyebi ya solo kati na lisakoli. Nakanisi ete bokotanga kelasi na biso ya pamba mpe bokozwa lokola eloko ya liboso libatisi mokolo moko,libatisi katina mayi mingi.Bokozala sikoyo na elkya ya bomoi ya seko. Tokoki te kokanisa bomoi ya seko, ya solo. Nakoki kaka kokanisa et eke tozali kokanisa nzela moko molai mingi, oyo ezali nasukate mpe tozali komona yango na mosika; kasi kati na bomoi na biso ya sika,to nya lelo tozali komituna kaka naba kilometa muke ya ebandeli na yango. Wana ezali ya solo elikya na biso, soko tokozwa libatisi kati na yezu mpe tozala na bomoyi kati naye na sengi na bino kozwa oyo na bosolo mpe na kozwa yango te lokola lisanga moko oyo botombelaka mbeka lokola lisusu eloko moko ya momesana.

DUNCAN HEASTER

Ya solo kozali Bibila moko kasi ba Ecclesia ebele. Esengeli tozala na makanisi mpe mposa yakotanga Biblia mpona bino moko mpo na koyeba malamu makomi. Tondimeli biso nyonso ke kozali nzambe moko kaka.

Yezu azali mwana na nzambe oyo azalaki na nzoto tololenge na biso pme biso nyonso esengeli tokokokozwa libatisi na mayi mingi penza pamba te, kufa mpe koswekwa naye tokoka kondimela yango kala mingi te akozonga na mokili oyo mpo na kosala bokonzi na nzambe awa na nse “ kasi na likolo te na lola te ?”

Tosengi na bino mpe toyambi bino, tosengi na bino bokoka kotinda mikanda na bino mpo na kozwa eyano mpe mikanda mosusu yakotangela Biblia, mikanda wana ekopesamela bino ya pamba te mpwete bokoka koyekola malamu Biblia.

Name/ Nom: Kombo………………………………………………………………………

Adresse/ Esikayo ofandi:……………………………………………………………….

Téléphone:

change language settings suitable for 800x600 display use full page width
Available languages:
free bible basics